PAROLES
Moto nioso awa na se
Aza na batu na ye ya ko bikela
Oyo esalaka makasi ya moto
Eza pe bisika ya ko likya
yesu elikya na nga ya sika
Ye nde tina ya ko zala na nga
Na tiaka ya nga motema
Na baye ba sala ba kombo awa na se
Sima makambu e changer
Avenir na nga pe e koti mobulu
Na luki bisika na tia lokolo
Nzoka solution eza na batu te
Elikya na nga ya sika Yesu eh
Na langwe bolingo ya quelques temps
Na yoki ba je t’aime ya ndenge nioso
Sima ya mua mikolo
Déception ya moto toujours au rendez-vous
Na longoli elikya na bato
Ba lapaka ndayi ba salela mosapi
Elykia na nga ya sika Yesu eh
Na ndima maloba monganga a loba
Ata na poto bokono eko sila te
Minganga ba yekoli nzoto
kasi mokolo nzoto mopesi na pema
Elikya na monganga te
ye pe azuaka pema epayi ya Nkolo
Na likya lisusu na Nzambe ye nde lisungi e silaka te
Bridge
Lisungi ya baye pasi e bungisa bango elykia
Ya ko mona ko kokisama ya bilaka na Nzambe awa o se
Elykia na nga ya sika
Refrain x 2
Nga likya lisusu ata misu ya bo moto eza ko mona te oh
Nga na likya lisusu ata ko kokisama ya bilaka e wumeli
Yesu elikya na nga ya sika
Lead 1
O lingaka te nga na lela
O bongisa nioso ya malamu pona nga
O kota nga motema
O silisa bilembo nioso ya pasi
O tia nzembo ya sika
Refrain nango kombo na Yesu eh
Chorus A x 2
refrain nango kombo na Yesu
refrain nango kombo na yo
Lead 2
Elaka na Nzambe e katisa bikeke kino e lata nzoto
Maloba na yo elengi esala bokeseni na ba susu
Kombo na yo e koma sujet ya loyembo ya tango nioso yaya
Molimo a kiti, motema e tondi na sayi
Molimo a kiti elykia e tondi motema
Tango a simbaka nga na yokaka posa se moko
Chorus B
Ya ko yembela Yesu oyo x 4
Ya ko binela Yesu oyo x 2
Ya ko sanjola Yesu oyo x 2
Lead 3
Ya ko yembela Mosantu ya lola
O bongoli pinzoli na ko seka yango ngay oyo
Nga na meli te kasi na langwe na posa ya ko yemba
Ya ko binela Mosantu ya lola
Na développer makasi na nga ya ko binela yo
Ya ko sanjola Mosantu ya lola
Elikya e mati lisusu na lingi na sanjola
sanjola x 5
Na ko yembela Mosantu ya lola
Ata na moni te na misu ya bomoto nazo yemba
Elikya e mati lisusu e tindi ngay na yemba
Ngayi nako yembela Mosantu ya lola
Chorus C
Ya ko yembela Yesu oyo x 4
Olivier
avril 15, 2020 at 9:37
moto nyoso awa na se aza na batina ya kobikela.